KONGO AKADEMIA / lisolo : TOLOBELA EKOLO KONGO UTA EBANDELA


05 mars 2025
TOYEKOLA MOKILI YA KONGO
ekomami na LEOBANEM
#NKOMBO KONGO
-Kongo oyo toyebi mpe tokolobela mbala na mbala, esengeli na biso penza koyeba yango malamu soki euta wapi pe ekelamaki lolenge kani.
Na ntina ena tokolanda na bokebi penza maye moko moluki ya lisolo to historien Ndaywel è Nziem akoloba mpo na yango kati ya buku na ye « Kongo uta ebandeli tii na lelo »
Ye akolimbola biso ndenge tokoma na bendele na egangeli to mokano na biso (devise) . Mpo na ye nkombo Kongo ekouta na makambo mibale ya liboso -na bokonzi ya kala ya nkombo Kongo (to royaume Kongo) , ya mibale -pe na ebengeli ya ebale Kongo . Mabele maye mayaki kokoma uta mokolo mwa yambo ya sanza ya sambo ya mobu 1885 ekolo penza lolenge toyebeli yango. Tii na lelo ata ezali kaka bongo, ata lolenge nkombo eye ezuaki bankombo misusu kati ya lisolo ya ekolo eye mpe suka suka eyaki kokoma esika bato bafandi elongo na mabele moko , bango oyo nde bayebani bo bayimboka-Kongo. Nzoka bankoko babandaki kokonza mabele oyo wana uta mibu ata nkoto tii ekoma ekolo ya misato na Afrika na bonene sima ya ekolo Sudan na Algeria oyo toyebi.
BENDELE YA KONGO
Bendele na yango « -mayi -ya- mbu- na- monzoto -ya -wolo- nà- loboko- ya- mwasi -na - ndelo - moko -ya -motane -ekambemi - epai na epai na ndelo ya motane söo oyo emokatisi » euti penza na bonkama (siècle) ya zomi na libwa. Lisolo na yango, yango oyo:
Ezali nde likwa (héritage) euti na :
-Elili ya montango ya yambo (1) -1877: « bendele ya langi mayi -ya- mbu -na -myoto- ya- wolo » oyo endimamaki na mobu 1877 na lisanga ya lingomba ya baye bazalaki koluka kokonza mokili ya Afrika na nkombo na bango ya « Association internationale africaine » (AIA) . Yango , lisanga to Commission internationale ena nde eyaki kokelama na bokutani ya « bayemi ntaka ya mokili » (to géographes) na mobu *1876 na Ndakomokonzi (Palais) ya engumba Bruxelles na ekolo Belgique
Awa nde penza ebandeli ya makambo ya Leopolo ya babale. Lokola ,Leopolo ya babale azalaki Mokambi ya ekolo Belgique , azalaki pe mokambi ya likita lina. Yango uta ebandeli ya masolo ma bango ayebisaki litkanisi na ye ya motuya ‘te bakela bendele moko oyo ekokesene na oyo ya Belgique mpe ata ya ekolo mosusu mpo lingomba na ye wana etikàla penza lingomba ekonzami ata na ekolo moko te . Yango bendele ena ya mayi ya mbu na minzoto ya wolo ekoki kouta na bendele ya kala ya bato ya ngele (sudistes) ya Amerika o ntango ya bitumba na bango ya bokabwani na ekolo (guerre de Sécession) ya baye ya likolo (nordistes ). Bendele oyo nde bapikaki yango o bisika binso bazuaki mabele pe bakelaki esika ya mimbongo to comptoir na bango na nzela ya mayi ya ebale ya KOngo to mpe na miluka na yango. Mpe ezali bendele ena nde bapikaki yango na mboka Vivi , mboka mokonzi ya yambo, o mokolo mwa yambo ya sanza ya sambo ya mobu 1885 mpo na milulu ya kotalisa ete ekolo ya sika ebandi o mabele ya Kongo.
Uta wana bendele ena ebongwana penza te .
-Elili ya montango ya babale(2) :- 1960-1963 : na bendele ena , monzoto ezali lisusu moko te , kasi ekomi motoba mpo na kotalisa montango ya bituka.
-Elili ya montango ya isato (3)-Na mobu 1963-1964-1966 , tango basali bokaboli ya sika mpe bituka misusu bibakisami ,batikaki likambo ya kotiaka minzoto. Kasi liboso monzoto moko ya moke etiamaki mpe sima bayaki kotia moko ya monene . Mpe mpe na esika na yango batie ndelo moko ya monene ya motane mpo na kotalisa makila ya baye bakufaki mpo na ekolo , mpe ngambo na ngambo bakangisi ndelo ena ya motane sôo .
-Elili ya montango ya inei (4)-1971-1997 - bendele ya mayi ya pondu na loboko esimbi mololi kati ya libungutulu ya motane söo , bendele eye endimamaki na mobu 1990 tango ya MPR ya Mobutu.
-Elili ya montango ya itano (5): -1997-2006 bendele tango ya Laurent Désiré Kabila, ye azongisi « démocratique « na nkombo république
-Elili ya montango ya motoba (6): - 2006: bazongisi bendele ya eleko ya kala (1964_1966) kasi babongoli kaka langi ya mayi ya mbu .
#MOKANO YA EKOLO (devise)
Mokano ya Kongo ya lelo ezali « Bosembo, Kimya, Mosala » Yango nde eyaki na mobu 1964 kokitana na oyo ya liboso ezalaki « Mosala na Ntombwa » ya lingomba « Etat indépendant du Congo » ya Leopolo ya babale oyo ezalaki kokende nzela moko na mokano ya ekolo Belgique « L’Union fait la force »na eleko nyoso ya *bombulamatari (colonisation) ya Kongo . Na eleko ena kaka mokano ete " Mosala " nde ezalaki likolo . "Bosembo na Kimya" eyei nde kobakisama na sima .
#LOYEMBO YA LOKUMU (hymne national)
1960: Loyembo ya lokumu ya yambo oyo bayembaki yango sima ya mokolo ya bozui bonsomi ya ekolo nde « Debout Congolais » oyo ekomamaki se na mobu 1960 na sango (jésuite) Simon -Pierre Boka na lisungi ya Joseph Lutumba. Nzoka na Katanga na eleko ya mobulu ya bokati ekolo eteni eteni (to sécession)bango basalaki ya bango loyembo nkombo « la katangaise »,loyembo ekomamaki na Joseph Kiwele
1971-1996: Loyembo ya Zaïre ezalaki « La Zaïroise », ekomamaki kaka na sango (jésuite) Simon -Pierre Boka na Joseph Lutumba .
tala ntina mpe lisolo ya nkombo na bendele na mokano ya ekolo na loyembo ya lokumu.
Yango lelo uta Laurent Désiré Kabila ,,tozali kaka na loyembo ya eleko ya bozui bonsomi too "Telema mwana mboka Kongo"!
- Bokoki kozua biso na nzela ya bisika biye totieli bino awa.
- *whatsapp : +33 7 51 24 38 92 /whatsapp: + 243 978 449 726 /
- E-mail : kongochannel53@gmail.com. / abalawigide@gmail.com
- Mpo na baye bakolinga kosunga mosala moye ya litomba , bakoki kotinda lisungi na bango na nzela eye:
- Paypal kongochannel53@gmail.com
- MATONDI NA BINO BANSO !!!
https://lessentielrdc.com https://radio-l-essentiel-rdc.websiteradio.co
Se connecter Inscription